Psalms 77

Nzambe abongwani ?

Nzembo ya Asaf mpo na Yedutuni, mokambi ya bayembi.


1 Nazali kobenga epai ya Nzambe, mpo na lisalisi
nazalaki koganga epai ya Nzambe,
mpo oyoka ngai.

2 Tango nazalaki na kati ya minyoko, nalukaki Yawe ;
na butu na tombolaki maboko, elembaki
mpe molimo na ngai eboyaki kobondisama.

3 Nakanisaki yo, Nzambe, mpe nalelaki na se-se ;
nazalaki kokanisa na mozindo, mpe molimo na ngai ezalaki kolemba.

4 Obatelaki miso na ngai na kokangama ;
nazalaki lisusu na pasi mpo na koloba.

5 Nazalaki kokanisa mikolo ya kala,
bambula nyonso ya kala.

6 Nazalaki kokanisa banzembo na ngai na butu ;
motema na ngai, ezalaki kokanisa na mozindo
mpe molimo na ngai ezalaki komituna :

7 “Yawe akobwaka biso libela ?
Boni, akolakisa lisusu te bolamu na ye ?

8 Bolingo na ye ya makasi esilaki libela ?
bilaka na ye ekomi ya pamba mpo na batango nyonso ?

9 Nzambe abosanaki kozala na mawa ?
apekisaki mawa na ye na kanda ?”

10 Bongo nakanisaki : “na likambo oyo nakozwa makasi :
bambula ya loboko ya mobali
ya Ye Oyo Aleki Likolo”

11 Nakokanisa misala ya yawe ;
Ya solo, nakokanisa makamwisi na yo ya tango nyonso ya kala.

12 Nakokanisa na mozindo misala na yo nyonso ;
mpe tala misala na yo nyonso ya nguya.

13 Banzela na yo, Nzambe, ezali ya bosantu ;
nzambe nini azali monene lokola Nzambe na biso ?

14 Yo ozali Nzambe oyo osalaka makamwisi ;
olakisi nguya na yo na kati ya bato.

15 Na loboko na yo ya nguya, okangolaki bato na yo
mabota ya Zakobi mpe ya Zozefi.

16 Bamayi emonaki yo, Nzambe,
bamayi emonaki yo mpe elengaki, enyolisami ;
bisika ya mozindo eninganaki.

17 Mapata esopaki mayi ;
likolo ebimisaki lokito,
makonga na yo epelaki sima mpe liboso.

18 Lokito na yo eyokanaki na kati ya mopepe ya kaina ;
kongenga ya kake engengisaki mokili ;
mokili eninganaki mpe elengaki.

19 Nzela na yo ya moke elekaki na kati ya ebale monene,
nzela na yo ya moke na kati ya bamayi ya makasi ;
matambe na yo emonanaki te.

20 Otambwisaki bato na yo lokola etonga ya bameme,
na loboko ya Moyize mpe Aron.
Copyright information for LinMNB